Na fukami n'ekulusu by Pastor diyoka shekinah tabernacle

7 Views
admin
admin
06/18/24

141. NAFUKAMI N’EKULUSU

Nafukami n’Ekulusu,
Na makolo na Nkolo,
Pene na Ye, ngai nandimi
Kozala moyekoli;
Mpate na etonga na Ye,
Na loboko ya Nkolo;
Na ngomba to na matiti,
Esengo na motema.

Choeur:
Nafukami n’Ekulusu,
Na makolo na Nkolo,
Pene na Ye, ngai nandimi
Kozala moyekoli.

Uta ntango yango esengo
Ezali na motema,
Longwa mitungisi na ngai
Na Yesu ngai nalongi;
Longwa bilulela mpamba,
Mokili ekosaki ngai;
Nazwi kimia oyo ya sôlo,
Na makila na Yesu.

Soki mosala esili,
Nakokota na mboka
Epai Molongi ya liwa
Azali kozela ngai;
Kuna nakoyemba nkembo
Ya Yesu Mosikoli
Oyo’akufelaki ngai
Mpe nabiki libela.





*chant de prière avec shekinah tabernacle

* Épauler votre niveau spirituel en écoutant régulièrement ce chant inspiré.


*contacter nous pour vos:

suggestions; dauphinshekinah@Gmail.com


*sponsorisés la chaîne au;

Show more

0 Comments Sort By

No comments found

Up next